Ngembo na Moi

Ngembo, el murciélago y Moi, el sol

Lisap’ónge!

Ónge!

Lisap’ónge

Ónge

Baímbóka boyamba lisapo eee

Eeeeeee

Ezaláká mokↄlↄ mↄ́kↄ́, bato míbalé. Ezaláká mↄ́kↄ́ Moi, mosúsu Ngembó. Bazaláká baníngá, basálákí boníngá. Bǒngó bazaláká bandeko. Balingánáká míngi. Bangó míbale bazalákí, elↄ́kↄ Ngembó akolía, Moi mpé akolía yangó. Sↄ́kí mↄ́kↄ́ azwí likambo moníngá akokԑndԑ mbángu kotála monínga wa yě mpó ya koyéba likambo níni eleki epái na yě. Sↄ́kí mpé kosálisa yě, ásálisa yě. Kasi eyéi kokóma mokↄlↄ mↄ́kↄ́, ayókí nsango te mwǎna wa moníngá wa yě Moi azá kobéla, azá na mpási. Alobí: « Tԑ̂ nakóki kotíka boye tԑ̂, nákԑndԑ kotála mpé mwǎna wa ngáí, mwǎna wa moníngá wa ngáí ndéngé azá kobéla ». Azwí libénga na yě, atí bankísi na yě atámbolakan’angó na káti. Abandí kokԑndԑ, akómí kúná epáí ya Moi, akútí boye banganga-nkísi batóndání na lopángo ya Moi bazáli kosálisa mwǎna wâná. Atalí, alobí « ezá kokoka tԑ̂ »

Lisap’ónge!

Ónge!

Abéngí Moi pԑmbԑ́ni, alobí: « Moníngá, namóní ndéngé banganga-nkísi bazáli kosálisa mwǎna óyo, balembí bazókoka tԑ̂, bokↄn’óyo mwǎna azá n’ángo, ngáí nakosílisa yangó ». Afungolí líbenga na yě, abimisí nkísi alobí: « omóní nkísi óyo, látísa yangó mwǎna, mikↄlↄ míbale. Na sima ya mikↄlↄ míbale mwǎna akobíka ». Moi mpé azwí nkísi alátísí mwǎna. Elekí káka mikↄlↄ míbale mwǎna mpé abíkí. Moi asepelí, bato nyↄ́nsↄ mpé basepelí. Nzókandé ntángo bafándákí wǎna, Ngembo alobí « názónga epái ya moníngá, nákԑndԑ kozwa nkísi mpó mwǎna así abikí ». Kokóma akomí kúná boye, átúna Moi: « moníngá, nayei kozwa nkísi na ngai ». Moi alobí: « Ah, nkísi yangó natiakí káka bobԑ́lԑ́ áwa na ndáko, zelá naínↄ nakolukela yↄ̌ mokↄlↄ mosúsu ». Ngembo azóngí. Mbala ya míbale Ngembo alobí: « názónga epái ya moníngá na ngái ázóngisa nkísi na ngái. Akeí akomí kúná: « moníngá, zóngísélá ngáí nkísi ya ngáí napesákí yↄ̌, mwǎna esí abikí ». Alobí « ah zelá naínↄ mwa mokԑ nakolukela yↄ̌ ». Ngembo azongí.

Ekómí mokↄlↄ ya mísáto akeí: « pésá ngáí nkísi na ngáí, nasalísákí yↄ̌, ózóngisela ngáí nkísi na ngáí, mwǎna así abikí ». Alobí: « zelá naínↄ mwa mokԑ, nkísi yangó nakolukela yↄ̌ ». Ngembo azongí, avándí, avándi mwǎna wa Ngembo ayé kokwéya káka na pási ndéngé mↄ́kↄ́ óyo mwǎna wa Moi azalákí na yangó.

Lisap’ónge!

Ónge!

Baímbóka boyambaka lisapo ee

Eeeeeeee

Alobí: « názónga mbángu epáí ya moníngá apésa ngáí nkísi ya ngáí mpó násalisa mwǎna ». Kokóma akomí kúná, atála boye, Moi yě wǎna así alátí kitↄ́kↄ, alingí ábima átámbola ákԑndԑ. Alobí: « moníngá, bolímbisi, nayéi epái na yↄ̌, mwǎna na ngáí abelí káka pási ndéngé mwǎna na yↄ̌ azalákí na yangó. Bóngó zóngíséla ngáí nkísi wâná, nákԑndԑ mpé kolátísa mwǎna, mwǎna ábika ». Moi ayébísí yě te: « ngáí nasínalátí kitↄ́kↄ boye, nazá kobima, bóngó óyébisa ngáí názónga lisúsu mpó na kozwela yↄ̌ nkísi? tԑ̂ ». Abimí káka ndéngé ameséná na lolԑ́ndo na yě nyↄ́sↄ wǎna ndéngé Moi ebimaka na ntↄ́ngↄ wâná mpwasa! Abimí akeí. Ngembo azongí azwí nkísi mosúsu asalísí mwǎna kasi ezalákí nkísi wâná tԑ̂, mpó nkísi óyo ebíkísákí bokↄnↄ wâná, ezá káka mↄ́kↄ́. Ámeka boye, makokí ezalákí tԑ̂, mwǎna ayeí akúfí. Ngembo akundí mwǎna na yě. Ntángo akundí mwǎna na yě, epesí yě pási alobí: « likambo óyo Moi asalí ngáí, ngáí na yě bondeko na bísó bandá lԑlↄ́ na mái woo ». Abandí sik’óyo kosála níni. Sↄ́kí amóní ekómí káka Moi alingí ábima, Ngembo akimí. Sↄ́kí káka Moi ekeí, elálí, ekotí, Ngembo abimí. Yangó wǎna bomↄ́nↄ́kↄ Ngembo yě atámbolaka na moi tԑ̂.

Lisap’ónge!

Ónge!

Baímbóka boyambaka lisapo eee

Eeeeeee

Yangó wǎna bomↄnↄkↄ Ngembo atámbolaka na Moi tԑ̂. Yě káka sↄ́kí ekómí mpókwa, butú ndé abimí. Mpé ntángo atámbolaka wǎna atiaka elongi na yě káka na nsé mpó ámↄ́nↄ Moi tԑ̂.

Bandeko, súka ya lisoló mpé ntína ya lisapo ezalí te: « Moníngá sↄ́kí asalísí yↄ̌, bomԑsԑnԑ, kozóngisela yě mabe tԑ̂ ».