Nkoi na mbali

Le léopard et le pangolin

​Lisap’ónge

Ónge!

Baímbóka boyambaka lisapo eee

Eeeeeee

Ezaláká mokↄlↄ mↄ́kↄ́, na mbóka yↄ́kↄ́ boye, Nkoi azaláká na baníngá na ye mísáto. Bavandí na etúká ya mbóka na bangó wâná. Nkoi abengí Makáko, abengí Mbólókó, ayékobénga Mbali, alobí:

— Ah ndéngé tovandi áwa tóbima nainↄ mwa mokԑ́ tókԑndԑ kotámbola. Mpó Nkoi atámbóláká, atíkí etúká ya mbóka ayeí kobima na mbóka mↄ́kↄ́ amoní básí kitↄ́kↄ mpenzá. Ntángo akomí kúná, bayambí yě, azalákí nainↄ yě mↄ́kↄ́. Atúná bango: « basálaka ndéngé níni epái na bínó áwa mpó na kozwa mwǎsi?»

Bísó áwa sↄ́kí olingí óbala mwǎsi áwa, yáká kotála nainↄ bozwi na bísó. Bakeí balakisí Nkoi bantaba óyo wǎna babókolaka kúná. Likambo ya kokámwa, ezá nsↄ́mↄ!! Nkoi akosí mpé te alingí mwǎna mↄ́kↄ́ wǎna, alobí akoyâ kotósa ekila óyo bakopésa yě. Bapésí yě ekila: « Bísó sↄ́kí oyeí áwa boye tokoyamba yↄ̌, topésí yↄ̌ mbéto. Sↄ́kí ozá na moníngá na yↄ̌, tokoyamba bínↄ́ míbalé, tokopésa moto na moto na mbéto na yě, bozotálana ndéngé bokolala. Óyo kúná bakotiéla yě mai na nsé ya makolo, óyo kúná mái na nsé ya mbéto. Balalí tii na ntↄ́ngↄ́, tokoyamba bínó bokozónga. Bayebísi Nkoi makambo nyↄ́nsↄ Nkoi alobí: « nakeí ».

Akei, akútání na Mbólókó:

— « Mbólókó »

— « o!moníngá bóní? »

Nkoi alobí:

« yáká tokԑndԑ, kasi lokóla tozó kԑnd’áwa boye, nakopésa yↄ̌ bikila: esíká tozókԑndԑ sↄ́kí tokómí na bilanga ya kokó, yↄ̌ okobúka káka óyo ya mokԑ́, ngai nakobúka óyo ya monԑ́nԑ. Sↄ́kí tolekí tokómí esika bamama mikóló bazalí, sↄ́kí bapésí mbↄ́te, yↄ̌ ndé okondima. Sↄ́kí tokómí esíká baseka bazalí sↄ́kí bapésí mbↄ́te ngáí Nkoi nakondima »

Mbólókó ayókí makambo mâná nyↄ́nsↄ, bayokání mokↄlↄ ya kokԑndԑ. Babandí kokԑndԑ, bakeí, bakeí, bakomí na bilanga ya kokó, nkoi abúkí. Mbólókó abúkí káka óyo ya mokԑ́ wâná. Babandí kokԑndԑ, bakomí esíká bamamá bazalí:

— «Bǎna mbóte»

Mbólókó andimí: «Mbote»

Bakómí esíká ya baseka, baseka bapésí:

— «Mbↄ́te!»

Nkoi ayanólí mpenzá na esengo: «Mbↄ́te iyo».

Balekí bakeí, bakómí esíká babokiló bazalí. Ah babokilo bayeí. Bakómáká mwa ngonga óyo ntángo ya mpókwa. Bayambí bangó, bapésí bangó bya boléi, makambo nyↄ́nsↄ, bakomí kúná bafándí. Babokiló balobí: « esíká bínó boyeí áwa boye ekila na mbóka na bísó ezalaka ebelé. Ndéngé toyambí bínó, sↄ́kí te ntaba mↄ́kↄ́ ebúngí, bokobála lisúsu mwǎsi te. Bokobála tԑ̂, yáká tókԑndԑ » bamemí Nkoi na Mbólókó. «Bomoní!» Mbólókó alobí: « Ah Ah Ah », Nkoi alobí: « tóluka mayԑ́lԑ tósála mpé na mbóka na bísó tobↄ́kↄlↄ ba ntaba ». Nzóka Nkoi azá na mayԑ́lԑ na yě mosúsu na motéma, Mbólókó azóyéba tԑ̂. Ekómí, bazóngí bamélí bamélí, babokiló balobí: « bókóta bólála ».

Nkoi atuní: «Mbólókó, moníngá yↄ̌ oláláka ndéngé níni? » « Ah ngáí sↄ́kí nakↄ́tí ndéngé nalálí boye, libélá ». Bakoti balali ekómí katikáti ya butú Nkoi alamúkí amóní Mbólókó alálí. Nkoi akití, alongólí nsáni ya mái óyo ya Mbólókó, asopí yangó akeí, akangí ntaba, akatí kíngó, azwí makilá asopí na nsáni ya mái wâná óyo batiélákí bangó mpó na ntóngó básukola. Afándí, aleí ntaba asílísí, akúmbí makilá wâná ayeí, akótísélí Mbólókó na nsé ya mbéto, yě azwí mái óyo ya yě atíkí káka, balali.

Ekómí ntↄ́ngↄ́, Nkoi moto wa yambo:

« moníngá tólamuka, tósukola. Nkoi asukólí, azwí kíti ya libándá afándí. Mbólókó asukólí, azóngí komilálisa mwǎ mokԑ́, ázila te ntↄ́ngↄ́ éfungwama. Sↄ́kↄ́ azákomítómbola boye, nkunza nyↄ́nsↄ ezókangama. Kúná milelo ebandi. Ntaba mↄ́kↄ́ ebungí.

Babokiló batúní

« Nkoi bínó boláli ndéngé níni?»

« Bísó tolálí malámu, botiélákí biso mái. Óyo bokomↄ́na yě na makilá, yě wâná moto abomí ntaba na bínó, aleí »

Bandeko! Lisap’ónge!

Ónge!

« Tokotála óyo tokozwá yě na makilá yě wâná tokoboma ».

Ntↄ́ngↄ́ étána, Mbólókó bimá, Mbólókó ámeka kotámbola boye nzóto nyↄ́nsↄ ekangamí na makilá, áluka ábima, ezókoka tԑ̂. Mbólókó ámeka ábima « Ah! ah! ». Bazomélí yě:

« yↄ̌ ndé moto oyíbákí ntaba »

Babétí Mbólókó babomí yě. Nkoi azonǵi na mbóka na yě. Avándí, mwǎsi ya Mbólókó atúní yě. “Ah tԑ̂, azá malámu azólía, bayambí bísó na ndéngé mↄ́kↄ́ kúná bisengo, akoyâ na sima.

Avándí, elekí mikↄlↄ misúsu, ayeí kobénga lisúsu nyama óyo Makáko.

« Makáko, yáka tókԑndԑ epáI ya babokiló ». Ayébísí Makámbo nyↄ́nsↄ ndéngé ásálaka. Na nzelá apesí bikila nyↄ́nsↄ

Lip’ónge!

Ónge!

Baí boyóka lisapo eeeeeeee

eeeeeeeeeeeeeeeeeeeeee

Azwí Makáko, babandí kokԑndԑ, esíká ya kokó asálí káka ndéngé asálaki, esíká ya baseka, bapésí mbóte, eyambí káka yě Nkoi. Makáko atosí nyↄ́nsↄ tee bakómí kúná. Bayambí bangó, baleí malámu. Balalí, atúní yě:

« Makáko yↄ̌ olálaka ndéngé níni? »

« Ndéngé káka toleí, nakangí míso nalálí na ngái»

 « ya sↄ̌lↄ́?»

« eh ».

Balálí, ekómí na katikáti ya butú Nkoi alamúkí, asálí lisúsu ndéngé akԑndákí na Mbólókó, akangí ntaba, abomí azwí makilá atié na nsáni, atiélí Makáko, yě azwí mái atié epái na yě. Ekómí na ntↄ́ngↄ́, Nkoi abimí moto ya yambo, asukólí. Makáko mpé alamúkí, asukólí, ntↄ́ngↄ́ eleki, mwǎ butú ezalí. Makáko akosi lokóla mwǎ koluka kolála. Babokiló kúná babimí

«Ah ntaba mↄ́kↄ́ ebúngí »

Bábima boye bakútí Nkoi wâná amínanólí avándí na yě malámu.

« Nkoi náni asálí likambo óyo? »

« óyo asálí yangó bokoyéba yě, káka ndéngé tokoyáka, bokoyéba yě, bokokanga yě na makilá na nzóto ».

Makáko áluka ábima boye poso ya nzóto nyↄ́nsↄ ekangámí na makila.

« Ehéé yě moto abomí ntaba! »

Bazwí Makáko babomí yě. Nkoi azongí lisúsu, babokiló bazóngísí yě bakangélí yě bilↄ́kↄ, azongí akeí.

Sima ya mikↄlↄ ayékokútana na Mbali. Nyama óyo Mbali azá na mayԑ́lԑ mpé lokóla Nkoi. Nkoi alobí:

« moníngá tozókԑndԑ epái ya babokiló, kúná bǎsí bazá ebelé »

Ayebísí yě káka ndéngé nyↄ́nsↄ óyo basálaka. Bakómí na esíká ya kokó, Nkoi abúkí ya monέnԑ, yě mpé abúkí ya monέnԑ.

Nkoi alobí:

« Ah yↄ̌ otí ndé tembe na ngáí?»

« Ah bolímbisi nabósání, sↄ́kí boye nabósání, nazózónga »

« kozónga tԑ̂, yáká, mbala ya sima kosála lisúsu tԑ̂, támbólá tókԑndԑ »

Babandí kokԑndԑ, bakómí esíká ya bamamá, bápésa mbóte, bangó nyↄ́nsↄ nye, Nkoi andimí tԑ̂, Mbali mpé andimí tԑ̂.

« Nayébísákí yↄ̌ níni? »

« Ah! Nabósání. Ah, sↄ́kí mpé boye naómóna mobémbo yangó ebongélí ngaí tԑ̂, názónga »

« Tԑ̂, kozónga tԑ̂, kosilika tԑ̂, kasi ósúka, esíká tozókóma bǎsí óyo bakopésa mbóte, endíma káka ngaí, yↄ̌ tԑ̂, kondima lisúsu tԑ̂ ».

Azwí asimbí yě na litóyi

« oyókí? »

« nayoki , Nkoi, ndéngé lolingáná nazótósa yↄ̌ tԑ̂, nabalúkí nazózónga na ngaí. Nazózónga káka nakokԑndԑ lisúsu tԑ̂.

Nkoi alobí:

« Tíká nalímbísí yↄ̌, nalingaka yↄ̌ míngi, kosála lisúsu tԑ̂ ».

Nzóka Nkoi na mayέlԑ, yě mpé Mbali na mayέlԑ. Bakómí esíká baseka bazalí,

lisap’ónge!

ónge!

Mbóte na bino!

Mbóte eeee

Nkoi asilíkí alobí:

« ozóngélí lisúsu? »

« ah tԑ̂, zwá kpↄngbↄ́, nakomema lisúsu tԑ̂ mpó nákԑndԑ. Zwá Nkoi! Mpↄ́ namóní, mobémbo mobébí mpↄ́ na ngaí. Makambo na yↄ̌ nyↄ́nsↄ nazótósa tԑ̂, nazóyéba tԑ̂, náni alokí ngaí? zwá káka kpↄngbↄ́ na yↄ̌, ókԑndԑ epaí ya babokiló, ngaí nasúkí áwa ».

Abwakélí Nkoi na makolo, abandí kozónga. Nkoi amílobí: « ah! boye kúná nakolía ntaba tԑ̂! ». Nkoi alandí yě mbángu alobi:

« yáká tokԑndԑ, kosála lisúsu tԑ̂. Yáká tokԑndԑ. Sↄ́kí tokómí kúná, kosála lisúsu bilↄ́kↄ wâná tԑ̂ »

Bakómí epái ya babokiló, bayambí bangó malámu. Bapesí bangó biléi na masanga. Nkoi ayebísí Mbali: « óyo momekano mwǎ ngáí mwǎ súka, sↄ́kí nalongí, nazwí mwǎsi wa ngáí mpé nakeí na yě.

Ekómí ntángo ya kolála, Nkoi abengí Mbali: « Moníngá, olálaka ndéngé níni? Mbali azongísí: « sↄ́kí omↄ́ni ngáí míso ezótála, nasínalálí, sↄ́kí míso na ngáí ekangámí, lobá nalamúkí »

Ekómí na katikáti ya butú ntángo Nkoi abimaka kosála makambo ma yě, átála boye míso ya Mbali polélé, alobí « alalí ». Nkoi akamátí nsáni, abimí akeí o etóngá ya ntaba, akangí ntaba, abomí, aleí mpé asilísí. Akamatí makilá atiélí Mbali na nsé ya mbéto, alobí na nsé ya motéma: « óyo lóbí akomóna ». Asilísí, amatí na mbéto na yě mpé alálí.

Mbali atálí boye Nkoi alálí mpongí makási mpenzá, atélémí, akamátí nsáni ya makilá, atíe eṕai ya Nkoi, akamátí mái azongísí epái na yě.

Lisap’ónge!

Ónge!

Ekómí ngonga ya ntↄ́ngↄ́ mpenzá, Mbali atélémí, amísopéli mái nↄkí mpé abimí libándá. Nkoi átála boye Mbali amísukólí́, alobí « akomↄ́na ». Ámíbwákela boye, ayokí zéyi, ámeka kobénga Mbali, Mbali alobí: « nazalí áwa libandá nazóyↄ́tↄ mↄ́tↄ » Nkoi mayέlԑ masílí yě, nzóto mobimba etóndí na makila.

Babokiló bayeí na ntↄ́ngↄ́, bakútí káka Mbali yě mↄ́kↄ́ balobí:

« likambo ya moyíbi na bínó epái ya babokiló esíla tԑ̂? »

Mbali alobí:

 « tosálí níni?».

Bazóngísí:

« ntaba mↄ́kↄ́ ebúngí, wápi Nkoi? ».

Mbólókó alobí:

« nayébí tԑ̂ ».

Babéngí Nkoi kasi azóbima tԑ̂. Babokiló bayébí sik’áwa te Nkoi ndé moyíbi. Mbali ayebísí babokiló te bákanga Nkoi nsé na ndáko mpↄ́ sↄ́kí abimí, bakokoka yě tԑ.

Banↄ́ngↄ Nkoi boye, bamↄ́ni yě azómílԑ́tԑ, makila matondí yě nzóto.

Babokiló balobí: « Yↄ̌ Nkoi ndé moyíbi, oyáka na baníngá áwa tozóboma bangó, nzóka ezá ndé yↄ̌? ». Balandí Nkoi, babétí mpé bamóbomí

Lisap’ónge!

Ónge!

Lisapo na bísó esúkí wâná

Ntína ya lisapo ezá te: sↄ́kí ozá na baníngá, ozákosála bangó mabé, oyéba te mokↄlↄ mosúsu moníngá mↄ́kↄ akosúkísa yↄ̌. Yangó wâná Mbali, nyama mokέ boye asúkísákí Nkoi.