Zela zela Mokomboso azanga mokila

Pourquoi Mokomboso, le chimpanzé, manqua de queue

​Lisap’ónge!

Ónge!

Baí boyamba lisapo eee

Eeeeeee

Ezaláká mokↄlↄ mↄ́kↄ́, na mbóka yↄ́kↄ boye, banyama bánso bafándáká na bangó epái yↄ́kↄ́. Bóngó ezaláká mokↄlↄ mↄ́kↄ́ Motúli mↄ́kↄ́ ayeí kobima, abandí kotámbola. Etámbólákí Motúli, ayekokútana na nyama Mokómbósó. Mokómbósó mpé amóyambí na motéma molámu mpenzá. Alobí: « ngáí Motúli ya mikíla. Nayeí kotúla mikíla epái ya bínↄ́ » « ah malámu »

Mokómbósó amóyambi, amópésí esíká ya boláli. Ayambí yě na esengo nyↄ́nsↄ lokóla ndeko wa yě. Motúli ayeí koyébisa Mokómbósó: « yébísá bandeko nyↄ́sↄ ngáí nayeí kotúla mokíla, báyá nátúlela bangó mokíla ». Mokómbósó mpé na bolingo ya bandeko bayě asálí abetí keleló óyo babéngaka epái na bísó likembé: « kúlú kúlú kúlú, bandeko bóyâ, bóyâ, bóyâ, motúli ayeí kotúla mikíla». Banyama bayókí.

Bóngó akobanda mosála mokↄlↄ mwa eyenga. Nkoi, eyókákí yě bóngó, Nkoi akómí moto wa libosó. Nkoi ayéi, akómí epái ya Motúli. Motúli asalí makambo na yě, bonganga bwa yě boye tii atúlélí Nkoi mokíla. Makáko mpé azalákí mpembéni wǎna. Makáko mpé ayéi kobima lisúsu. Motúli azwí atúlélí mpé yě lisúsu mokíla. Ba óyo wǎna bakei, banyama bánso babandí koyâ na molↄngↄ, na molↄngↄ. Nzóka Mokómbósó, makambo wǎna nyↄ́sↄ bazá kosála na ndáko na yě.

Lisap’ónge!

Ónge!

Baímbóka boyambaka lisapo eee

Eeeeeee

Esíká te Mokómbósó áloba te moníngá, ngáí ozá naínↄ epái na ngáí, bandá na ngáí, bongó ósúka na bato basúsu kasi yě zelá zelá na yě káka azózela káka ayebí káka: « ah likambo tԑ̂, ápesa nainↄ bato, óyo ya ngáí ndé akosála óyo ya nsↄ́mↄ ». Motúli abandí kotúla. Asilísí banyama baiké. Ekomí mokↄlↄ mↄ́kↄ́ na ntↄ́ngↄ́, nsango eyéi koyâ epái na yě na maloba maye: « Motúli, ndéngé yↄ̌ ozalí áwa, zóngá mbángu mbángu, sↄ́kí okeí tԑ̂ mwǎna wa yↄ̌ akobíka tԑ̂, akobíka tԑ̂ ». Motúli ntángo ayokákí nsango wǎna moníngá wa yě Mokómbósó azalákí tԑ̂. Alobí: « nakokí mpé kokԑndԑ ndéngé wǎna tԑ̂. Malámu názela moníngá wa ngáí sↄ́kí ayeí náyebisa yě te moníngá oyambakí ngáí malámu, tálá nsango eyeí kúná mwǎna wa ngáí bokↄnↄ bolekí makási sↄkí nakómí tԑ̂ mwǎna akokúfa. Nzókandé Mokómbósó azótámbóláká na zámba. Ntángo ayeí moníngá así akangí bisaka nyↄ́sↄ afándísí akangí bisáleli bya yě nyↄ́sↄ óya kotúla mikíla.

Motúli abéngí yě: « Moníngá, nazá na nsango ya mabé » « níni lisúsu moníngá wa ngáí » « ndéngé ezalí káka sik’óyo ngáí nazalí kokԑndԑ, mwǎna kúna bokↄnↄ bolekí. Sↄ́kí nakomí lԑlↄ tԑ̂ akobika tԑ̂ »

Lisap’ónge!

Ónge!

Bayimbóka boyambaka lisapo eee

Eeeeeee

Mokómbósó avándí nyԑ̂ alobí: « ah moníngá, ngáí na yↄ̌ tomԑsԑní, tozá kolía, tozólála esiká mↄ́kↄ́, bóngó sik’óyo okokԑndԑ ótulelí ngáí mokíla tԑ̂?»

« Moníngá, nakangí bisáleli bya ngáí nyↄ́nsↄ, nakangí yangó. Mosála mozalí tԑ̂ mais nalingakí kokԑndԑ ndéngé wǎna tԑ̂ lokóla yↄ̌ oyambakí ngáí, navandí na ndáko na yↄ̌, yangó nazelí yↄ̌, nalaka yↄ̌. Ndéngé yↄ̌ oyeí boye Mokómbósó naólaka yↄ̌ ». Mokómbósó afúkámí mabↄ́lↄ́ngↄ́ epaí ya motúli « Motúli sↄ́kí otíkí ngáí boye ekosímba tԑ̂ ». Motúli alobí: « Tԑ̂ ndeko na ngáí, tozalákí na yↄ̌ áwa mikↄlↄ nyↄ́nsↄ, ngong’óyo boye nayebí elↄ́kↄ níni nasála tԑ̂. Na mawa ya motúli, lokóla yě mↄ́kↄ́ ayebí káka ndéngé asálaka, mpó ásepelisa moníngá wa yě Mokómbósó, abendí káka bikelákela bya yě, bínso ya mosálá tԑ̂, káka ndámbo óyo amekí káka kofungola áwa, mpó na kokitisa káka moníngá na yě kándá óyo azá n’angó te akozánga. Alobí « moníngá, óyo nazókosála, endimisámí na bonganga bwa ngáí tԑ̂, óyo nakopésa yↄ̌ káka te ozalákí moníngá, oyambákí ngáí, tozólía na yↄ̌, tozómԑlԑ na yↄ̌. Yↄ̌ makambo eyákí na ndáko na yↄ̌. Yↄ́ mↄ́kↄ́ káka zelá zelá kasi nakokí kotíka boye tԑ̂ ».

Motúli azwí lobↄ́kↄ akotísí, abéngí moníngá « yáká ». Amósali bԑ etení ya mokíla ya mokԑ́, alobí: « óya yↄ̌ ndámbo óyo ozwí yangó wâná, moníngá mԑlԑsi míngi, ngáí nakeí.

Lisap’ónge!

Ónge!

Baímbóka boyambaka lisapo eee

Eeeeeee

Ntína ya lisapo ya bísó lizalí boye « Mokómbósó azángáká mokíla likoló na zelá zelá.